Acts 17

Polo mpe Silasi na Tesalonika

1Wana Polo mpe Silasi balekaki na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendaki na Tesalonika esika ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki. 2Polo akotaki na ndako ya mayangani lokola ezalaki na momesano. Basaba misato, azalaki kosolola na bango na tina ya Makomi. 3Azalaki kolimbolela bango mpe kotalisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba : “Yesu oyo nazali koteya bino, ye nde azali Klisto !” 4Ndambo ya Bayuda bandimaki makambo oyo Polo alobaki, mpe bakomaki na ngambo ya Polo mpe Silasi ; ndenge moko mpe na bato mingi ya mokili ya Greki oyo bazalaki kobanga Nzambe, elongo na basi ebele ya lokumu.

5Kasi Bayuda misusu batombokaki. Bakendaki kokamata bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala. Basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendaki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ngulupa ya bato. 6Kasi lokola bamonaki bango te, bamemaki Jazoni mpe bandeko misusu liboso ya bakambi ya engumba na koganga : “Bato oyo bazali koningisa mokili mobimba bakomi mpe awa. 7Bongo, Jazoni ayambi bango na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba : ‘Mokonzi mosusu azali, kombo na ye Yesu !’ ” 8Tango ngulupa ya bato mpe bakambi ya engumba bayokaki bongo, batombokaki makasi. 9Boye, bafutisaki Jazoni mpe bandeko misusu lomande mpe na sima batikaki bango.

Polo mpe Silasi na engumba ya Bere

10Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda. 11Nzoka nde, bato ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba, mpe mokolo na mokolo bazalaki koyekola na mozindo penza Makomi mpo na koyeba soki makambo oyo Polo azalaki koteya bango ezali ya solo. 12Bongo, Bayuda ebele kati na bango bandimaki ; ndenge moko mpe basi mingi ya lokumu kati na bato ya mokili ya Greki elongo na mibali ebele kati na bato ya mokili ya Greki.

13Kasi tango Bayuda ya Tesalonika bayokaki ete Polo azali koteya Liloba ya Nzambe na Bere, bayaki mpe kuna mpo na kotia songisongi kati na bato mpo ete batomboka. 14Bongo, kaka na tango wana, bandeko basalaki ete Polo akita na ebale mpo na kozwa masuwa wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere. 15Bato oyo bakendaki kotika Polo bamemaki ye kino na Atene, mpe bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda Polo noki na Atene.

Polo na Atene

16Wana Polo azalaki kozela bango na Atene, motema na ye etungisamaki mingi na komona engumba yango etonda na banzambe ya bikeko. 17Azalaki bongo kosolola na Bayuda mpe bato ya mokili ya Greki oyo basambelaka Nzambe na ndako ya mayangani, mpe mokolo na mokolo azalaki mpe kosolola na bisika ya bato ebele, elongo na bato oyo azalaki kokuta wana. 18Lisanga moko ya bato ya mayele oyo babengaka Epikire mpe lisanga mosusu ya bato ya mayele oyo babengaka sitoyika bakomaki kotiana na ye tembe. Bamoko batunaki : “Moto ya makelele oyo alingi koloba nini ?” Bamisusu balobaki : “Tomoni lokola nde azali koteya banzambe ya bapaya !” Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya sango malamu ya Yesu mpe ya lisekwa kati na bakufi. 19Boye, bakamataki ye mpe bamemaki ye na Areopaje
Areopaje  : ezalaki ngomba moko ya mokuse, epai wapi likita monene ya bato ya Ateni ezalaki kosangana.
. Balobaki na ye :

—Boni, tokoki solo koyeba soki mateya ya sika oyo ozali koteya elingi koloba nini ?
20Pamba te, ozali kolobela biso makambo ya sika. Bongo, tolingi koyeba soki makambo yango elakisi penza nini. 21(Bato nyonso ya Atene mpe bapaya oyo bazalaki kovanda kuna bazalaki kolekisa tango mingi penza mpo na koloba mpe koyoka basango ya sika).

22Polo atelemaki liboso ya bato oyo basanganaki na Areopaje mpe alobaki :

—Bato ya Atene ! Nasosoli ete na makambo nyonso, bolingaka mingi makambo ya bonzambe.
23Pamba te, tango nazalaki kotambola kati na engumba na bino mpe kotala bikeko oyo bosambelaka, namonaki kutu etumbelo moko oyo bakoma likolo na yango : “Mpo na Nzambe oyo ayebani te.” Nzoka nde, ngai nayei koteya bino Nzambe oyo bosambelaka ata boyebi ye te.

24Nzambe oyo asala mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango azali Nkolo ya likolo mpe ya se ; avandaka te na bandako oyo maboko ya bato etonga. 25Azalaka na posa ya lisungi ya moto te mpo ete akoka na nyonso, pamba te ye nde apesaka bato nyonso bomoi, pema mpe biloko nyonso. 26Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba. Akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovandaka. 27Nzambe asalaki bongo mpo ete bato bakoka koluka ye, tango mosusu bakolonga komona ye na koluka-luka lokola moto akufa miso. Nzoka nde, na bosolo, azali mosika te ya moko na moko na biso. 28Pamba te, na nzela na ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino misusu baloba : “Tozali bana na ye !”

29Yango wana, lokola tozali bana ya Nzambe, tokanisa te ete bonzambe ekokani na eloko moko ya wolo, ya palata to ya libanga : nzambe ya ekeko oyo esalemi na maboko mpe mayele ya moto. 30Nzoka nde, lokola Nzambe atalaka te tango ya kozanga boyebi, sikʼoyo azali kosenga ete bato nyonso, na bisika nyonso oyo bazali, babongola mitema. 31Pamba te, akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.

32Wana bayokaki Polo koloba mpo na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe misusu balobaki : “Tokoyoka yo mokolo mosusu mpo na likambo oyo.” 33Boye, Polo atikaki bango. 34Nzoka nde, bato mosusu balandaki Polo mpe bakomaki bandimi. Kati na bango ezalaki : Denisi, moto ya Areopaje, mwasi moko na kombo ya Damarisi mpe bato mosusu elongo na bango.
Copyright information for LinMNB